musicas.mus.br

Letras de músicas - letra de música - letra da música - letras e cifras - letras traduzidas - letra traduzida - lyrics - paroles - lyric - canciones - NKOLO OBENGAKI NGAI - FAVEUR MUKOKO - música e letra

Utilize o abecedário abaixo para abrir as páginas de letras dos artistas

A B C D E F G H I J K L M N O P Q R S T U V W X Y Z

Nkolo Obengaki Ngai letra


nkolo y'obengaki ngai
po nasuka na nzela te
nakoma kino na suka
ya mobembo na ngai
bongo y'olakaki ngai
ete y'okotika ngai te
ete y'okozala na ngai
kino suka ya nzela

ata na kati ya mayi
ba mbonge pe mipepe
y'otikaki ba yekoli te
yonde obengaki bango
sala ndenge moko na ngai
wana mipepe ekoya
bomba ngai na ngolu nayo
kino suka ya nzela

y'okambaki israël
butu na likonzi ya moto
moyi na lipata ya kembo
kino mboka elaka
lelo oyo okokamba ngayi
nasengi ete miso na ngai
emona lipata ya kembo
fanda se kati na motema na ngai

po oyebi motema oyo
elikia mobimba se nayo
soki yote nzambe na ngai
nani akoki ko sunga ngai
wana nako bondelaka
pesa ngai eyano nkolo
nayebaka tango nioso
ete y'otiki ngai te

si tu peux me cacher en toi
jusqu'à la fin de l'épreuve
je te serais toujours fidèle
quand tu m'appelleras
je ne veux pas aller loin de toi
si la confusion et la mort
auprès de toi je veux être
avec tout le mien (yahweh)

batela bomoyi na nga (yesu)
kati nayo nkolo
kino suka ya nzela
wana y'okobenga ngai
nakoma epayi nayo
koyemba elonga nayo
ko kumisaka yesu
seko na seko

ata na kati ya mayi
ba mbonge pe mipepe
y'otikaki petelo te
yonde obengaki ye
sala ndenge moko na ngai
wana mipepe ekoya
bomba ngai na ngolu nayo
kino mboka elaka

nakokoma
soki osimbi ngai nako koma
(yaya yesu eeeh)
nako koma
soki obateli ngai nakokoma
(ya yesu eeeh)
nako koma
soki obundeli ngai nako koma
bisika ozozela ngai nako koma

Faveur Mukoko - Letras

top 30 músicas

©2003 - 2024 - musicas.mus.br